Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 5:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 5:18
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;


Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami.


Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi.


Kati na basoda tuku misato ya mpiko, misato bayaki epai ya Davidi, na libanga monene oyo ezalaki pene ya ebombamelo ya mabanga ya Adulami. Nzokande, basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya bakitani ya Rafa.


Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango, lokola tango balokotaka mito ya ble oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.


Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi.


Jozue azongiselaki bango : — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.


Ekitaki kino na ebandeli ya ngomba moke oyo etalana na Lubwaku ya Beni-Inomi, na ngambo ya nor ya etando ya bato ya Refayimi. Ekitaki na Lubwaku ya Inomi, na mopanzi ya ngambo ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi kino na Eyini-Rogeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ