Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 5:12 - Mokanda na Bomoi

12 Davidi asosolaki ete Yawe azali kolendisa ye lokola mokonzi ya Isalaele mpe azali kotombola bokonzi na ye mpo na Isalaele, bato na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 5:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako.


Tango Davidi alongwaki na Ebron mpe akendeki kovanda kati na Yelusalemi, azwaki lisusu bamakangu mpe basi mosusu ebele oyo babotelaki ye bana mosusu ya mibali mpe ya basi.


Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »


Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »


Davidi asosolaki ete Yawe nde akomisaki ye mokonzi ya Isalaele mpe ete azalaki kotombola bokonzi na ye makasi mpo na Isalaele, bato na Ye.


Irami alobaki na ye lisusu : — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, Mokeli ya likolo mpe se, apambolama, mpo ete apesi na mokonzi Davidi mwana mobali ya mayele mpe ya bososoli, oyo akotonga Tempelo mpo na Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko.


Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ?


Bongo soki alakisi mabombami yango epai na ngai, ezali te mpo ete naleki bato nyonso na bwanya, kasi ezali mpo ete mokonzi ayeba ndimbola ya ndoto na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa motema na ye.


Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, bokonzi na bango ekozala ya lokumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ