mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.
Tango Irami, mokonzi ya Tiri, ayokaki sango ete bapakolaki Salomo mafuta mpo ete akoma mokonzi mpo na kokitana na Davidi, tata na ye, atindaki bantoma epai ya Salomo, pamba te azalaki tango nyonso molingami ya Davidi.
Kasi sik’oyo, Yawe, Nzambe na ngai, apesi ngai bopemi na bangambo nyonso, mpe ezali lisusu na monguna moko te mpe na likambo moko te oyo ekoki kobangisa ngai.
Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.
Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi,