Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ?
Mpe boloba na Amasa : ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te ? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › »
Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele : — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango ? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi ? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso ?
Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.
sala keba ete opona kaka mokonzi oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Asengeli kowuta kati na bandeko na bino. Kotia mopaya te oyo azali ndeko na bino te kati na Isalaele mpo na kokonza bino.
Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,
« Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi : ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino ? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko ? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »