Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 4:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.


Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.


Mokonzi atunaki ye : — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ? Tsiba azongiselaki mokonzi : — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.


Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : — Mefibosheti ! Ye azongisaki : — Ngai oyo, mosali na yo.


Kasi Adadi oyo azalaki nanu elenge na tango wana akimaki na Ejipito elongo na ndambo ya bato ya Edomi oyo bazalaki basali ya tata na ye.


Jonatan abotaki Meriba-Bala ; Meriba-Bala abotaki Mishe.


Jonatan abotaki mwana mobali, Meriba-Bala. Meriba-Bala abotaki Mishe.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia ; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ