Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 4:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, ayokaki ete Abineri akufi na Ebron, alembaki nzoto, mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na somo makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 4:1
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba ; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko ;


Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi.


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga ;


Bato wana nyonso bazalaki koluka kobangisa biso ; bazalaki komilobela : — Maboko na bango ekolemba makasi, ekokoka lisusu kosala te ; mpe mosala ekosila te, ekotelema ! Bakolemba nzoto mpe bakosundola mosala ! Kasi ngai nasambelaki : — Sik’oyo, oh Yawe, lendisa maboko na ngai !


Yango wana, maboko nyonso ekolemba mpe mitema ya bato nyonso ekobukana.


Pesa makasi na maboko oyo elembi, lendisa mabolongo oyo ezali kolenga ;


Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi : ‹ Oh Siona, kobanga te ! Tika ete maboko na yo elemba te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ