Mpe boloba na Amasa : ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te ? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › »
Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.
Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.
Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.
Eli atunaki ye : — Makambo nini Yawe ayebisaki yo ? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.