Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki : — Boni ! Ngai nazali moto ya mbwa na ngambo ya bato ya Yuda ? Ngai oyo, na mokolo ya lelo, nazali kosalela bosembo epai ya libota ya Saulo, tata na yo, epai ya bandeko na ye mpe epai ya baninga na ye ; ngai oyo nakabaki yo te na maboko ya Davidi, ngai nde sik’oyo ozali kofunda ete nasali mabe na tina na mwasi oyo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 3:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi : — Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto.


Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi.


bosala yango sik’oyo ; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye : « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. »


Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi,


Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki : — Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai ?


Azaeli akamwaki mpe azongisaki : — Mpo na nini okosala makambo ya boye na mosali na yo ? Ata kutu mbwa eleki ngai na tina ! Elize alobaki lisusu : — Yawe amonisi ngai ete okokoma mokonzi ya Siri.


tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.


Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Mosantu ya Isalaele !


Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.


Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.


Moto ya Filisitia alobaki na Davidi : — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda ? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ