2 Samuele 3:39 - Mokanda na Bomoi39 Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.
Davidi alobaki : « Salomo, mwana na ngai ya mobali, azali nanu elenge mpe ayebi nanu makambo malamu te. Nzokande, Ndako oyo esengeli kotongama mpo na Yawe esengeli kozala monene, kitoko mpe na lokumu mingi na miso ya bikolo nyonso. Yango wana, nakobongisa biloko mpo na Ndako yango. » Boye Davidi abongisaki biloko ebele liboso ete akufa.