Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi : — Mokili oyo ezali ya nani ? Sala boyokani elongo na ngai, bongo ngai nakosunga yo mpo na kosangisa Isalaele mobimba epai na yo.
Mpe na mokolo wana, basoda nyonso ya Isalaele mpe Isalaele mobimba bandimaki ete mokonzi ayebaki ata likambo moko te na tina na kufa ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »
Davidi alobaki na Abineri : — Ozali mobali, boye te ? Nani akokani na yo kati na Isalaele ? Mpo na nini obateli te mokonzi, nkolo na yo ? Moto moko ayaki mpo na koboma mokonzi na yo.