Basalaki matanga, balelaki mpe bakilaki bilei kino na pokwa, mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali ; mpo na mampinga ya Yawe mpe mpo na libota ya Isalaele, mpo ete bakufaki na nzela ya mopanga.
Boye Davidi apesaki mitindo ; mpe bato na ye babomaki bango, bakataki bango maboko mpe makolo mpe badiembikaki bango pembeni ya liziba ya Ebron. Bazwaki moto ya Ishi-Bosheti mpe bakundaki yango kati na kunda ya Abineri, na Ebron.