Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 3:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 3:31
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,


Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.


Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango.


Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.


Bakalaka na ye balobaki na ye : — Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso ; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo.


Tango Akabi ayokaki makambo oyo, apasolaki bilamba na ye, alataki bilamba ya saki mpe akilaki bilei. Azalaki kolala na bilamba ya saki mpe azalaki kotambola malembe-malembe.


Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe.


Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki.


Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki : — Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka !


Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ