Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 3:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi ; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka.


Bongo Joabi akendeki na Geshuri mpe azongisaki Abisalomi, na Yelusalemi.


Kasi mokonzi alobaki : — Asengeli kokende na ndako na ye ; asengeli te komona elongi na ngai. Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te.


Abisalomi azongiselaki Joabi : — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › »


Sima na mibu minei, Abisalomi alobaki na mokonzi : — Pesa ngai nzela mpo ete nakende na Ebron mpo na kokokisa ndayi oyo nalapaki epai na Yawe,


pamba te tango mosali na yo azalaki kovanda na Geshuri kati na Siri, nalapaki ndayi oyo : « Soki Yawe azongisi ngai na Yelusalemi, nakogumbamela Ye. »


Boye Davidi akendeki kuna elongo na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, mwasi oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli.


Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye : « Mpo na nini ozali kosala boye ? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi.


Adoniya alobaki : — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.


Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron : Mwana ya liboso ezalaki Aminoni, mwana mobali ya Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; ya mibale, Daniele, mwana mobali ya Abigayili, moto ya Karimeli ;


ya misato, Abisalomi, mwana mobali ya Maaka, mwana mwasi ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri ; ya minei, Adoniya, mwana mobali ya Agite ;


Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.


Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati ; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.


Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe.


Abigayili amataki na ane na lombangu mpe akendeki nzela moko na bantoma ya Davidi elongo na basali na ye mitano ya basi. Mpe akomaki mwasi ya Davidi.


Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ