Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 3:28 - Mokanda na Bomoi

28 Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki : — Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 3:28
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.


Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.


Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »


Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. »


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.


Moto oyo akobeta moninga na ye kino koboma ye, basengeli koboma ye.


Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.


Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ