2 Samuele 3:24 - Mokanda na Bomoi24 Joabi akendeki komona mokonzi mpe alobaki na ye : — Eloko nini oyo osali ? Mpo na nini otikaki penza Abineri oyo ayaki epai na yo kokende ? Mpe tala sik’oyo, akei ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki : — Boni ! Ngai nazali moto ya mbwa na ngambo ya bato ya Yuda ? Ngai oyo, na mokolo ya lelo, nazali kosalela bosembo epai ya libota ya Saulo, tata na yo, epai ya bandeko na ye mpe epai ya baninga na ye ; ngai oyo nakabaki yo te na maboko ya Davidi, ngai nde sik’oyo ozali kofunda ete nasali mabe na tina na mwasi oyo !