Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 3:21 - Mokanda na Bomoi

21 Abineri alobaki na Davidi : — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 3:21
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akomisaki ye mokonzi ya Galadi, ya bato ya Ashuri mpe ya Jizireyeli, ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Isalaele mobimba.


ete akolongola bokonzi na ndako ya Saulo mpe akotia kiti ya bokonzi ya Davidi kati na Isalaele mpe kati na Yuda, longwa na Dani kino na Beri-Sheba.


Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi : — Mokili oyo ezali ya nani ? Sala boyokani elongo na ngai, bongo ngai nakosunga yo mpo na kosangisa Isalaele mobimba epai na yo.


Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti.


Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele.


Kasi mpo na yo, Jeroboami, nakozwa yo, mpe okokonza nyonso oyo motema na yo ekolinga mpe okozala mokonzi ya Isalaele.


Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba.


bato nyonso oyo batikali balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi bamipesaka te na makambo ya Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ