19 Sima na Abineri koloba likambo yango epai ya bato ya libota ya Benjame, akendeki na Ebron mpo na koyebisa Davidi makambo nyonso oyo bato ya Isalaele mpe libota mobimba ya Benjame babongisaki.
Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti.
mpe Tsadoki, elenge soda ya mpiko elongo na bakambi ya libota na ye tuku mibale na mibale ;
kati na libota ya Benjame, bato ya libota ya Saulo : basoda nkoto misato, pamba te mingi kati na bango bandimaki kaka kosalela ndako ya Saulo ;
Bopambola Nzambe kati na mayangani, bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.