2 Samuele 3:18 - Mokanda na Bomoi18 bosala yango sik’oyo ; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye : « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.
Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »