Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 3:16 - Mokanda na Bomoi

16 Mobali na ye alandaki ye na kolela kino na Bawurimi. Kasi Abineri alobaki na mobali yango : — Zonga na ndako na yo. Mpe mobali azongaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 3:16
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe.


Nzokande elenge mobali moko amonaki bango mpe akendeki koyebisa Abisalomi. Boye mibali nyonso mibale bakimaki noki mpe bakendeki na ndako ya moto moko ya Bawurimi. Lokola azalaki na libulu moko ya mayi kati na lopango na ye, bakitaki kuna.


Mokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani.


Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi.


Abi-Aliboni, moto ya Beti-Ariba ; Azimaveti, moto ya Baarumi ;


Boye Ishi-Bosheti atindaki bato kozwa Mikali epai ya mobali na ye, Palitieli, mwana mobali ya Laishi.


Mpe yeba ete, elongo na yo, ozali na Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya Benjame, na mboka Bawurimi, oyo alakelaki ngai mabe makasi na mokolo oyo nazalaki kokende na Maanayimi. Tango ayaki kokutana na ngai na Yordani, nalapaki ndayi oyo mpo na ye na Kombo na Yawe : ‹ Nakoboma yo na mopanga te. ›


Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abimaki na Mitsipa mpo na kokende kokutana na bango ; wana azalaki kokende kokutana na bango, azalaki kolela nzela-nzela. Bongo tango akutanaki na bango, alobaki na bango : — Boya kotala Gedalia, mwana mobali ya Ayikami !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ