14 Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo : — Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia.
Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Isalaele, mpe akonzaki mibu mibale. Kasi libota ya Yuda ekanganaki na Davidi.
Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.
Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.
Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.
Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi.