Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi : — Mokili oyo ezali ya nani ? Sala boyokani elongo na ngai, bongo ngai nakosunga yo mpo na kosangisa Isalaele mobimba epai na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 3:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe boloba na Amasa : ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te ? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › »


Tango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi.


Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye : « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo.


Ishi-Bosheti akokaki kozongisa ata liloba moko te epai ya Abineri, pamba te azalaki kobanga ye.


Davidi azongisaki : — Malamu ! Nandimi kosala boyokani elongo na yo, kasi nasengi yo eloko moko : koya liboso na ngai te soki otindeli ngai nanu te Mikali, mwana mwasi ya Saulo, tango okoya kokutana na ngai.


Abineri alobaki na Davidi : — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Mokonzi alobaki na basali na ye : « Boni, boyebi na bino ete mokambi moko mpe moto moko ya monene akweyi lelo kati na Isalaele ?


Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ