Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba.
Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye : — Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango.
Abineri alobaki na Davidi : — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.
Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.
Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.