7 Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba.
Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye : — Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango.
epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste ; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba ; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa.
Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi,
Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango,
Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.