Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele.


Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te, ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna, oyo moto ata moko te akobangisa.


Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.


Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele.


« Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ;


Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso.


Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba,


Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba ;


Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni,


mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Aroeri, na Sipimoti, na Eshitemoa ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ