4 Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele.
Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?
Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri.
— Tango okotanga bana ya Isalaele, moko na moko kati na bango akofuta mpo na Yawe, mpako mpo na kosikola bomoi na ye tango bakotanga ye. Boye etumbu moko te ekokweyela bango tango bakotangama.