Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.
Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.
Bakundaki mikuwa ya Saulo mpe ya mwana na ye ya mobali, Jonatan, kati na kunda ya Kishi, tata ya Saulo, na Tsela kati na etuka ya Benjame. Basalaki makambo nyonso oyo mokonzi atindaki. Sima na yango, Nzambe ayanolaki losambo mpo na mokili ya Isalaele.
Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.
Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.