Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:22 - Mokanda na Bomoi

22 Orina azongiselaki Davidi : — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:22
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Te, nkolo na ngai, yoka ngai ! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo.


Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye.


Davidi alobaki na Orinani : — Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe ; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.


Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki.


Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ