Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:21 - Mokanda na Bomoi

21 Orina atunaki mokonzi : — Mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, ayei epai ya mosali na ye ? Davidi azongisaki : — Nayei kosomba etando oyo mpo ete natonga awa etumbelo mpo na Yawe ; na bongo, bokono oyo ezali koboma bato ekosila.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye.


Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.


Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele.


Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?


Davidi alobaki na Orinani : — Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe ; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.


Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo, mpe pasi yango esilaki.


alandaki moto ya Isalaele wana kino kati na ndako na ye ya kapo mpe atobolaki bango mibale mabumu mpe bakufaki, ezala moto ya Isalaele wana mpe mwasi wana. Mpe etumbu oyo ezalaki likolo ya Isalaele esilaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ