Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:17 - Mokanda na Bomoi

17 Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:17
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki : — Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ?


Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali.


Davidi alobaki na Natan : — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki : — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te.


Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.


Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.


Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »


Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »


Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo ? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?


Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.


Otiki biso kokima liboso ya banguna na biso ; mpe bayini na biso bazwi biloko na biso na makasi.


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?


abengaki ye wuta na sima ya meme oyo azalaki kobatela mpo na kokomisa Ye mobateli ya Jakobi, bato na Ye, mpe ya Isalaele, libula na Ye.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki : — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.


Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »


Azongiselaki bango : — Bokamata ngai mpe bobwaka ngai na ebale monene, mpe yango ekovanda kimia, pamba te nayebi malamu ete ezali mpo na ngai nde mopepe makasi oyo etelemeli bino.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki : — Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato ! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ