Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:16 - Mokanda na Bomoi

16 Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:16
37 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.


Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.


Na mokolo wana, Davidi alobaki : « Moto nyonso oyo alingi kobundisa bato ya Yebusi asengeli kozwa nzela ya se ya mabele mpo na kokanga bato ya tengu-tengu mpe bakufi miso oyo bazali banguna ya Davidi. » Yango wana balobaka : « Bakufi miso mpe bato ya tengu-tengu bakokota te na ndako ya mokonzi. »


Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.


Na butu wana, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, na likolo ya ngomba Morija epai wapi Yawe abimelaki Davidi, tata na ye, mpe kaka na esika oyo Davidi abongisaki na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.


Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga.


Pamba te Yawe akolimbisa bato na Ye, akoyokela basali na Ye mawa.


tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselu tango anjelu ya Yawe akobengana bango.


Nzokande Ye, na mawa na Ye, azalaki kolimbisa mabe na bango na esika ya kobebisa bango ; mbala mingi, azalaki kokanga motema na esika ya kopelisela bango kanda na Ye ;


Yawe, lembisa moke ! Kino tango nini ekowumela ? Yokela basali na Yo mawa !


Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.


Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma.


Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.


Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.


Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana. Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi, kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.


Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.


Boni, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, to moto mosusu kati na Yuda abomaki ye ? Ezekiasi atosaki Yawe te mpe asalelaki mosakoli Mishe ngolu te ? Yawe abongolaki mokano na Ye te ya kotindela bango pasi oyo alakaki ? Tokomibendela biso moko pasi ya makasi na pamba. »


« Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema.


Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki : — Makambo yango ekosalema te.


Boye Yawe abongolaki makanisi na Ye. Mpe Nkolo Yawe alobaki : — Makambo yango ekosalema lisusu te.


Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.


Nakolongola makila na minoko na bango, mpe bilei ya mbindo na minu na bango ; kasi ba-oyo bakotikala bakokoma bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda ; mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma lokola bato ya Yebusi.


Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Esili ! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.


Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te ; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki.


Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.


Mpo na yango, ekokaki penza ete bato oyo baleki ebele kati na bino bapamela ye.


Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.


Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame.


Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye : — Nabondeli yo, tokota na engumba oyo ya bato ya Yebusi mpe tolekisa kuna butu.


— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ