Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:12 - Mokanda na Bomoi

12 — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:12
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa.


Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi :


Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.


Joabi, mwana mobali ya Tseruya, abandaki kotanga bango kasi asilisaki te. Pamba te likolo ya botangi wana, Yawe akitiselaki Isalaele kanda na Ye. Boye, motango ya bato yango ekomamaki te na buku ya masolo ya mokonzi Davidi.


pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka, ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.


Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›


oyo mpo na yango, Ngai natelemelaki bango mpe namemaki bango na mokili ya banguna na bango, wana mitema na bango oyo ekatama ngenga te ekomikitisa mpe bakozwa lifuti ya mabunga na bango,


Boye, wana bakotika mokili mpe wana mokili yango ekosepela Saba na yango, na mikolo nyonso oyo yango ekozala ezanga bato, na tango yango, bakozwa lifuti ya mabe na bango mpo ete batosaki mibeko na Ngai te mpe batombokelaki bikateli na Ngai.


Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ