Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:11 - Mokanda na Bomoi

11 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:11
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola.


— Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »


Tango Azuba akufaki, Kalebi abalaki Efrata oyo abotelaki ye Wuri.


Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya Davidi :


Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Emani, mosakoli ya mokonzi, oyo azalaki koyebisa ye maloba na Nzambe mpo na konetola nguya na Ye. Nzambe apesaki na Emani bana mibali zomi na minei mpe bana basi misato.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Davidi, wuta na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Samuele, na buku ya misala ya mosakoli Natan mpe na buku ya misala ya mosakoli Gadi.


Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi ; mpe ya mosakoli Natan ; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye.


Kasi mosakoli Gadi alobaki na Davidi : « Kovanda te kati na ndako oyo batonga makasi, kende na mokili ya Yuda. » Boye Davidi alongwaki mpe akendeki na zamba ya Ereti.


Na tango ya kala, kati na Isalaele, moto oyo azalaki kokende kotuna toli ya Nzambe azalaki koloba : « Tokende epai ya moto oyo azwaka bimoniseli. » Pamba te moto oyo bazali kobenga lelo « mosakoli, » bazalaki kobenga ye na kala « moto oyo azwaka bimoniseli. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ