Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 24:10 - Mokanda na Bomoi

10 Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 24:10
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na Natan : — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki : — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te.


Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »


Tango likolo ekokangama mpe mvula ekozala lisusu te mpo ete basali masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,


Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.


Davidi alobaki na Nzambe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.


Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


Bongo Ezekiasi amikitisaki, atikaki lolendo na ye mpe abongolaki motema. Bato ya Yelusalemi mpe basalaki lokola Ezekiasi. Boye, Yawe akweyiselaki bango kanda na Ye te na mikolo nyonso oyo Ezekiasi azalaki mokonzi.


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki : — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.


« Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »


Bongo Aron alobaki na Moyize : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Kotangela biso te masumu oyo tosali na bozoba !


ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe.


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,


Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya ! Boni, Yawe azali Tata na bino te ? Azali Mokeli na bino te ? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.


Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.


Bato ya Davidi balobaki na ye : Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo : « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. » Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo.


Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo.


Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ