2 Samuele 24:1 - Mokanda na Bomoi1 Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo ; alobaki na Davidi : « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto.
Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »