2 Samuele 23:8 - Mokanda na Bomoi8 Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi : Yoshebi-Bashebeti, moto ya Takimoni : azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko, abomaki na likonga bato nkama mwambe na etumba moko. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala bana ya Isalaele oyo bazalaki kosalela mokonzi : ezalaki na bakambi ya mabota, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda mpe bakomi mikanda. Mosala na bango ezalaki : kotala makambo oyo etali mabongisi ya mampinga. Sanza na sanza kati na mobu, lisanga moko ezalaki kokota na mosala mpe lisanga mosusu ezalaki kobima. Lisanga moko na moko ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.