Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 23:4 - Mokanda na Bomoi

4 azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 23:4
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.


Tika ete azala lokola mvula oyo ezali konoka na bilanga oyo balongoli matiti, lokola mamwe oyo ezali kopolisa mabele.


Nalapaki yango na ndayi mbala moko mpo na libela na Kombo ya bosantu na ngai : ‹ Nakokosa Davidi te ! ›


Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »


Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.


« Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.


Bikolo ekotambola na pole na yo, mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.


Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.


Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni ; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.


Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.


Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye.


Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !


Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ