Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga : moko, kombo na ye ezalaki « Baana ; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame,
Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.