Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 23:34 - Mokanda na Bomoi

34 Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 23:34
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.


Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba mokonzi na bango. Na tango wana, bato ya Siri ya Tsoba mpe ya Reobi elongo na basoda ya Tobi mpe Maaka bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.


Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki : « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. »


Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.


Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »


Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Mpo na kokoma na Abele-Beti-Maaka, Sheba akatisaki bikolo nyonso ya Isalaele mpe etuka mobimba ya bato ya Berimi oyo mpe basanganaki mpe balandaki Joabi.


Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.


Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi : — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo ? Abishayi azongisaki : — Ngai, nakokende elongo na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ