33 Shama, moto ya Arari ; Ayami, mwana mobali ya Sharari, moto ya Arari ;
Sima na ye, Shama, mwana mobali ya Age, moto ya Arari. Tango bato ya Filisitia basanganaki na Leyi epai wapi ezalaki na elanga moko etonda na misili, basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango.
Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ;
Shamoti, moto ya Arori ; Eletsi, moto ya Peloni ;
Ayami, mwana mobali ya Sakari, moto ya Arari ; Elifali, mwana mobali ya Uri ;