Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 23:23 - Mokanda na Bomoi

23 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 23:23
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele ; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti.


Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale.


Kati na lisanga ya bato tuku misato, ezalaki mpe na : Asaeli, ndeko mobali ya Joabi ; Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi ;


Na Beta mpe na Berotayi, bingumba ya Adadezeri, mokonzi Davidi azwaki bronze ebele.


Benaya azalaki moko kati na basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi na bango ; Amizadabi, mwana na ye ya mobali, azalaki moko kati na basoda ya lisanga yango.


Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.


Ayimeleki azongiselaki mokonzi : — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi ? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ