Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 23:20 - Mokanda na Bomoi

20 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 23:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mikolo ya bomoi na bango, Saulo mpe Jonatan balinganaki makasi mpe bapesanaki lokumu ; mpe na kufa na bango, bakabolaki bango te. Bazalaki mbangu koleka bampongo, makasi koleka bankosi.


Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele ; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti.


Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.


Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo asimbaki likonga na loboko na ye. Abundisaki moto yango ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.


Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.


Kasi abengisi te ngai, mosali na yo ; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo.


Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.


Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.


Yoela mpe Zebadia, bana mibali ya Yeroami, moto ya Gedori.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.


Bakambi ya Edomi bakomi na somo, bankumu ya Moabi bakomi kolenga, bato ya Kanana balembi nzoto.


Tala bingumba oyo ezalaki na suka ya eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, na ngambo ya mondelo ya Edomi, na Negevi : Kabiseyeli, Ederi, Yaguri,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ