Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 23:19 - Mokanda na Bomoi

19 Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 23:19
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami.


Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.


Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.


Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.


Molandi na ye ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko oyo, elongo na Davidi, babundisaki bato ya Filisitia oyo basanganaki mpo na bitumba, wana bana ya Isalaele bazalaki kokima na likolo ya bangomba.


Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.


Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu ; bongo akobota bambuma : epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko ; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.


kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato.


moyi ezali na kongenga na yango, sanza ezali na kongenga na yango, minzoto mpe ezali na kongenga na yango ; kutu monzoto moko ekeseni na monzoto mosusu na kongenga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ