Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 23:18 - Mokanda na Bomoi

18 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 23:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi ; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni.


Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi mpe bazongaki kati na engumba. Bongo, sima na Joabi kowuta kobundisa bato ya Amoni, azongaki na Yelusalemi.


Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango.


Bana mibali misato ya Tseruya bazalaki wana : Joabi, Abishayi mpe Asaeli. Asaeli azalaki mbangu lokola mboloko ya zamba.


Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se ; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.


Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.


Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, babomaki Abineri mpo ete abomaki Asaeli, ndeko na bango ya mobali, na bitumba ya Gabaoni.


Bandeko na bango ya basi : Tseruya mpe Abigayili. Tseruya abotaki bana mibali misato : Abishayi, Joabi mpe Asaeli.


Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ