Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 23:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tala maloba ya suka ya Davidi : Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 23:1
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki : — Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya.


akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ;


Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela.


Ezalaki mokolo wana nde Davidi aponaki na mbala ya liboso Azafi mpe bandeko na ye, mpo ete bakumisa Yawe :


Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule ! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Mabondeli ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, esuki awa.


Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli : « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai ;


namonaki Davidi, mosali na ngai ; napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.


Bozali kobeta mandanda na bino lokola Davidi mpe kokotisa bibetelo mindule kati na banzembo na bino.


Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.


Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.


Soki moko kati na bino azali na pasi, tika ete abondela ; soki moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo mpo na kokumisa Nzambe ;


Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.


Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye : « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »


Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ