9 Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kobimisa makala ya moto.
Na koganga ya Yawe mpe na pema ya zolo na Ye, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, mpe miboko ya mokili emonanaki na libanda.
bakufaka na mopepe ya Nzambe mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.
Abwakaki makonga na Ye mpe atindaki yango na bangambo nyonso ; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.
Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.
Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka.
Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya ; kanda na Ye ezali kopela lokola moto elongo na lipata ya molinga ya moto makasi ; bibebu na Ye etondi na kanda, mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka.
Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.
Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino kati na mokili oyo botikala ata koyeba te, pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto oyo ekotumba bino. »
Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Lokola bato oyo balobi maloba ya boye, nakosala ete maloba na Ngai ezala lokola moto na monoko na yo, mpe bato oyo bazala lokola bakoni oyo moto yango ekozikisa.
Bokono oyo ebomaka ezalaki kotambola liboso na Ye, mpe pasi makasi ezalaki kolanda matambe na Ye na sima.
Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.
Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.