Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya Lola elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo alingi kosimba yango asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga ; batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. »


Makonzi ya Lola ezali kolenga mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.


Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye ; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.


Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo, tango otambolaki na esobe,


Mapata esopaki mayi ebele, likolo eyokisaki lokito ya kake, mpe makonga na Yo ezalaki koleka-leka na bangambo nyonso.


Na lokito ya kake na Yo, mikalikali engengisaki mokili, mabele eninganaki mpe elengaki.


Mikalikali na Ye engengisaka mokili ; mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki,


Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.


Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.


Eh Yawe, tango obimaki na Seiri, tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi, mabele eninganaki, likolo enyangwanaki, mapata esopaki mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ