Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye, koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.


Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe : « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai ! »


Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.


Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai.


Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.


Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.


Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka, mabele esili kokanga bikangelo na yango sima na ngai mpo na libela. Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai, obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]


Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ