6 basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai.
Kasi soki bato bakangami na minyololo to na basinga ya minyoko,
Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai ; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.
Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !
Basinga ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo.
Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,
Wuta na libumu ya mbisi, Yona asambelaki Yawe, Nzambe na ye.
Tango bokomona mampinga ya basoda ezingeli Yelusalemi, boyeba ete kobebisama na yango ekomi pene.
Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.