Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:51 - Mokanda na Bomoi

51 Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:51
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ;


Tala maloba ya suka ya Davidi : Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :


Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »


Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga, obikisaka Davidi, mosali na Yo, liboso ya mopanga oyo ebomaka.


Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo ; nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Ebele bazali koloba na tina na ngai : « Nzambe akobikisa ye te ! »


Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona ! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene.


Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli : « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai ;


Nakobebisa banguna na ye liboso na ye mpe nakoboma bayini na ye.


Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye, mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.


Nakobatela mpo na seko bolingo na ngai mpo na ye ; boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.


Nalapaki yango na ndayi mbala moko mpo na libela na Kombo ya bosantu na ngai : ‹ Nakokosa Davidi te ! ›


Nalobaka na tina na Yawe : « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai ; natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »


Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia mpo ete akamba bango.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ