50 Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela.
Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.
oyo akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »